LES TITRES
Mokonzi wa ekolo apesi mitindo na bayangeli bituka po te’ batombola misala ya kolongonu bua nzoto, ezalaki o libaku lya bosukisi bokutani po ya mbala zomi na ibale na bayangeli bituka na etuka ya Lualaba…..
Sima ya bokutani ya ntoma ya kalaka mokonzi ya Onu o ekolo na limpinga ya Afc M23 , mama Bintou Keita ayebisi te’ MONUSCO ebelemi po ya kosunga mabongisi manso ya koluka kimia o ekolo Rdc …..
Awa na Kinshasa bato bawaki , ndako bipundjami, nzela bikabuani sima mvula makasi enokaki mua poso moleki , yoko nganga mayele o matali bikela akebisi koloba te’ mambi maana makosalema lisusu ,esengeli na mbula matari komilengele…..
/sites/default/files/2025-06/16062025-p-l-journallingalamatin-00web.mp3