Na ituri. Wuta ebandela ya poso Banque mondiale ekopesa boko bakeleli ya Aru mbongo pona basala boko misala ya komilukela bango moko. Bakeleli yango bazali motango koleka koto tuku mibale. Banque mondiale elobi ezali yoko linaka na bango ya kosunga bayi monyele ya Kongo bakokelela batelema.
Sima Eklezia katoliko kokomisa Floribert Bwana Chui ndakisa ya kolanda pona banso. Moyangeli Eklezia eye papa Leon alakisi pe esengo naye pona moyi Rdc moye. Ye papa alobi atie elykia te kokomisa Floribert Bwana Chui ndakisa ekosunga pona kimia ezonga na monyele mua Rdc.
Toyebisaki bino lobi te ndako esambisaka basali ya leta epekisi ministre Constant Mutamba abima Rdc te. Pe ye ministre lokola asengelaki pe kotindela leta mokanda naye ya bolongwi na ebonga naye ya mosala bo esengi mobeko ya Rdc soko ministre asengeli kosamba liboso ya ba zuzi. Kasi ye Constant Mutamba te sikawa nano atindeli leta mokanda yango te.
/sites/default/files/2025-06/18062025-p-l-journallingalamatin-00mp3web.mp3