Na Nord Kivu. Bayi Vido mboka kati na Beni bazali lisusu ata na esika ya kokenda kozua lisalisi soki babeli te. Mapitalo manso ya kuna makanga bikuke na yango mibu mibale yangoyo po bokengi bozali te. Soki moyi Vido alingi komisalisa nzoto esengeli ye kaka kokenda mosika penza ndakisa na Kainama, Tchabi to Boga nioso wana na ba kilometele koleka zomi.
Ba loni milona ya Rdc baye bapesaki milona na leta mobu eleki pe na kombo naye leta bakomisaki milona yango na Kongo mobimba bakosenga lifuta na bango. Minister ya agriculture ayambaki bango. Kasi awa tokoloba boye bosenga na bango ekomi te tata mokonzi ya ekolo na mama minister wa yambo basunga bango po bazwa lifuta na bango.
Na ngambo naye tata mokonzi wa ekolo na biso ayambaki mikolo mibale mileki moyangeli lingomba Ceeac awa na Kisasa. Pe yoko lisolo na bango ezalaki kolobela kotambola ya bibiele na boko bisika pe bisusu to Transhumance na Lopoto. Basololi bongo po bato ya mitema mabe bakomi kosalela transhumance yango po babombaka mandoki kati na bibiele pe bateka teka yango. Felix Tshiesedi na Gilberto Da Piedade bayokani po bazuela bikela bibe bina ba meko po esila.
/sites/default/files/2025-06/19062025-p-l-journallingalamatin-00mp3web.mp3