TITRES
Mibu tuku motoba na mitano ya lipanda ya ekolo Congo Demokratiki mokonzi wa ekolo Félix Tshisekedi akumisi bokasi ya bayi mboka o eleko eye pe asengi bomoko po ya kotonga Congo ya sika pe na kimia ,sima mikoloto mitiamaki na Washington mbele po ya kosukisa bitumba o monyele ya ekolo….
Bakambi ba communes too ba bourgmestres ya ekolo mobimba batomboli mingongo po ya kopalela bozangi lifuti lya bango uto babanda misala, na yango basengi na mokonzi wa ekolo komipesa na likambo liye po te’ bazua biyano bisengeli ….
O tango ekolo esepelaki lobi loleki lipanda, na Nord Kivu bitumba Makasi bisalemaki na etando ya Bukombo kati na batomboki ba Afc M23 na babundi ba Wazalendo …..
/sites/default/files/2025-07/01072025-p-l-journallingalamatin-00web_0.mp3