LES TITRES
Ekolo Rwanda ezai na liteya ya kopesa na Congo Demokratiki te o matali démocratie , pamba te kuna bakozalaka na masanga ma politiki meke te, bonsomi ya sango bozali te pe bakotosaka mamkoki ma bato te, wana maloba ma ngay te kasi ya molobeli mbula matari ya ekolo Rdc po ya koyanola na mokonzi wa ekolo Rwanda sima maye atalisaki kolanda na boyokani ya Washington…..
O Ituri bulo ya Onu ekolandelaka bakima bitumba too Unhcr ekangi misala mya yango na Aru , bango balimboli mokano na nkokoso ya misolo bazali na yango sikawa…..
Mokonzi wa ekolo asengi na mbula matari kosala manso po ya kobundisa bokono bua pulupulu ekasi boye bongali o bitando tuku mibale na mitano ya kolongonu bua nzoto awa na Kinshasa , atalisaki bosenga boye o bokutani ya mbala tuku mitano ya mbula matari poso eleki ……
/sites/default/files/2025-07/07072025-p-l-journallingalamatin-00web.mp3