LES TITRES
Lisanga ya molongo Amnesty International epaleli bobomami pe mambi ma somo makosalema o monyele ya ekolo Congo Demokratiki , yoko lapolo la sika efundi ba M23 , ba wazalendo na ba Fardc na bobomi , bozui basi na makasi na ngulupa pe bobuki makoki ma molongo ya lobiko , lolenge yoko pe lisanga HUMAN rights Watch etomboli pe mongongo ya mambi pene lolenge yoko se’ o monyele ya ekolo ….
Awa na Kinshasa bayi mboka ya booko ba quartiers bakozuaka mayi ma peto ya Regideso te , mingi bayi bafandi na ba ngomba too bisika bizuami mabenge , bango bakoma nde kosalela mayi ya mabulu too ba forage …..
Nzoka nde na kasai Oriental bielenge baakoteka mino na balabala o engumba Mbuji Mayi , kela eye eekosalema na bozangi kotosa kolongonu eekotungisa baye bakozalaka na ba ndako bikotekaka mino too ba pharmacie…
/sites/default/files/2025-08/21082025-p-l-journallingalamatin-00web.mp3






