Journal lingala matin

Mokonzi ya kala ya Rdc Joseph Kabila alobi bokonzi ya kongo ya eleko eye ekosalela bosembo malamu te. Bako bangisa bato pamba pamba pe nioso wana ekosunga pona boyokani te. Ministre ya Nteyi ayanoli ye te ye nde moto asimbi mandoki pe apimelaka bayi Rutshuru, Nyiragongo pe Masisi maponami ya 2023 aye nde lisusu kosenga bato basolola? Ngambo esusu ba mbanda politiki ya Rdc bafundi pe lisusu mbulamatari te apekisi bango kokenda Africa ya Sud epayi wapi yoko likita ya masolo ya koluka kimia ezonga Kongo ezali.

Mikoloyo ba Mvula minoki makasi na Beni pe kindu. Bibesi biloko ebele ya bayi mboka. Pe lisusu bipesi minyoko mingi penza na mabota ebele kuna.

Na oyo etali makoki ma bato tokakanga te. Na Goma lingomba protection de l’enfant ya Monusco ebandaki mikolo mibale yangoyo yoko kelasi ya koteya bato makoki ma bato. Mingi penza koteya bana kelasi ya likolo to ya Université Katoliko la Sapiensa oyo etali makoki ya bana bake. Pona lingomba liye bana mike ebele ya Masisi bakoma na bango kosala misala makasi ya koluka makele na mabulu ebele ya makele ya Rubaya.

 

/sites/default/files/2025-09/04092025-p-l-journallingalamatinweb-00.mp3