journal lingala matin

Lelo lisusu radio okapi ekendaki na ba wenze pona konongo talo ya biloko. Radio na bino emoni lisusu kaka te biloko bikiti pe talo ata ko boko bato bamoni kokita talo yango neti ezali mingi penza te po makasa ya franc congolais pe makomi moke na ndenge ezalaka kala pembeni ya dollar. eloko mosusu ekomonana te ekita talo ata moke te ezali mingi penza kaka nde talo ya transport. Yango ezali kaka ndenge ezalaka kala yambo franc congolais ezwa nguya pembeni ya dollar.

Na haut Katanga. Mituka mibale mibonzani lelo na Kasumbalesa. Bongo bato zomi na moko bakufi pe bayike bazoki. Bilili bia likama liango bikomonono na nzela ya internet pe bikotalisa boko bazonto ya kolala na mabele pe bisusu ya kokangama na yoko motuka ya likama liango.

lingomba young Man Action for education Ymae na Tanganyika lifundi te mitindo leta apesa été ba pygmees na ba ndeko bibosono bafutaka kelasi ya secondaire te moto akotosa yango na etuka Tanganyika azali te. Yango lingomba liye lizwi maloba pe lisengi na kobeta sete te mitondi miye mitosama ndenge esengeli ezala.

/sites/default/files/2025-11/11112025-p-t-journallingalamatinweb-00.mp3