Tata mokonzi wa ekolo ayambaki moninga naye ya ekolo israel lobi na Kisasa. Basololi. Ye Felix Tshisekedi amelisi moninga naye soyi na bomengo meke Kongo azali nango pe asengi ye na bayi mboka naye soko balingi baya kosala elongo na bayi kongo mosala ya komema mboka liboso. Pe ngambo naye Isaac Herzog ya Israel atombeli Rdc kaka bolamu bonso.
Na Nord Kivu. Ba M23 na ba Wazalendo babundaki lisusu lobi na Mboka Ndete na Nyiragongo Masisi. Pe ba M23 bafundaki ba Wazalendo te bango nde babundisaki bango liboso na mboka Luke na bosalelaka ba pepo ike ike biye bibetaka pe ba masasi.
Mikolo mileki tolobelaki bino esengo ya bayi Mbuji Mayi pona nzela ya motuya Mgr Nkongolo eye babongisaki yango pe bato bazongeli kosalela yango na esengo. Lelo kaka na Kasai oriental yango pe Mbuji mayi kaka tika toyebisa bino te nzela ya ndako ya ba pepo esika ba pepo bikitaka to bimatelaka na Aeroport ya Mbuji mayi pe babongisi yango pe ezongeli lisusu sika kosala lisusu mosala na yango ya koyamba to pe komatisaka ba pepo ndenge na ndenge na etuka eye.
/sites/default/files/2025-11/12112025-p-l-journalingalamatinweb-00.mp3








