Lingomba lia eklezia catholiko na kombo Commission Diocésaine Justice et Paix ya Archidiocèse ya Kisasa esengi leta na pe moto nioso ya motema malamu basunga po makambo ya ba tomboki ya Mobondo esila libela. Lingomba liye lisalaki mua bolukaluki ya koyeba motango ya bato nioso bakima bitumba ezala na eteni mobimba ya etuka bandundu ya kala, Kongo central to pe na Kisasa pona likambo yango ya Mobondo pe bolukaluki yango botalisi te motango ya bato baye ezali bato pene na toko kama misato.
Boko mikolo yangoyo ba mvula bizongeli konoko na Kongo mobimba. Ezala na ba Kivus to awa na Kisasa binokaki pe mikoloyo. Pe makama masi mamonani
Ndako ya mampinga eye ekosambisa bato baye bayingelaka na ndako ya mosolo Rawbank ya Victoire awa na Kisasa esanganaki lisusu lobi. Pe basambeli banso bakendaki na Victoire yango pona kotala bilili ndenge nioso esalemaka na mokolo ya likambo yango. Bilili pe bilakisi nioso bilekaki kasi kokamwa bandeko bilili yango bimonisi basoda na ba pulusu kozwa mbongo na sanduku ya bank eye pe lisusu kobotolo mama Porshe kifunda naye to sac oyo yepe atiaki liboke naye ya mbongo abotolaki Rawbank yango ya Victoire. Kosambisa eye ekokoba mikolo mikoya.
/sites/default/files/2025-11/13112025-p-l-journalingalamatinweb-00.mp3






