journal lingala matin

mikolo mibale mikoya ba tata bakonzi ya bikolo ya africa ya mayi ya bitima minene to Cirgl bakokutana awa na Kisasa. Yango nde bayangeli ba mbulamatari ya bikolo yango basangani lelo awa na Kisasa kaka po balengele likita yango ya bakonzi ya bikolo biye.

Na Haut katanga mikatano mizali mibale. Na Lumbashi yoko kompani ya ba chinois likotungi kobika ya bato kuna na mosala kompani eye ekosala. Bongo na Kasumbalesa nde moto ebomi bana baneyi mobimba ya libota se moko.

Na oyo etali mambi ya kelasi pe libiki ya balakisi ya Kongo. Na etando Kungu na Sud Ubangi balakisi baleli ba lifuta na bango ya sanza mibale nano bazwi te. Na Kisasa pe lokola lingomba linene na bango lisengi mbulamatari na ba ntoma ya ekolo bapesa biyano bisengeli na ba posa ya balakisi ya ekolo pe mingi penza bafuta nde nano ba lifuta na bango.

 

/sites/default/files/2025-11/14112025-p-l-journallingalamatinweb-00.mp3