Mitindo ya kotelemisa ba mituka pona kotala soko bizali na mokanda ekolakisa te motuka songolo ezali ya kobeba te pe ekoki kotambola na balabala ya leta. Mitindo minago mikosalamaki lisusu lobi na Kisasa ndenge leta akanaki yango te. Kasi ekosalama nde lobi lokoya.
Bongo na Ngambo mosusu. Na Sud kivu. Pembeni ya bisika ba M23 bakokonza wuta ebandeli ya mobu tozali. Batomboki baye bazwi pe lisusu mikolo mibale yangoyo mboka Maimingi na Shabunda ekomi na maboko na bango. Bakotelaki mampinga ma ekolo na nkuku pe mampinga mazongaki mua sima. Bayi mboka bayike bakimi ba ndako na bango pe lisusu bato bazoki bazali pe mua bayike.
Pulupulu ya makila ekotungisa na bituka Nord Kivu pe na Tshopo. Esi ebomi bato. Nioso wana po mayi ma petwa makozanga. Na pe bisika malonga ya kokoto zongo.
/sites/default/files/2025-11/18112025-p-l-journallingalamatinweb-00.mp3








