LES TITRES
Bakonzi ba bikolo Congo Demokratiki pe Ouganda batiaki mikoloto ya boyokani po ya misala ndenge na ndenge o bikolo , yango esalemaki mua mosala moko na Kampala o ekolo Ouganda…..
Bato baweyi , ndako bipundjami pe nzela bibebi na Kananga sima mvula makasi mikonoko mikolo miye kuna….
Na etuka Haut Katanga misala ya bokengi mitalisaki bato zomi na libwa bo’ bato mabe na mandoki o boso ya moyangeli etuka po ya mua tango , kati na bango moyi ekolo Chine moko pe bayi mampinga …
/sites/default/files/2026-05/13052026-p-l-journallingalamatin-00web.mp3





