Baweli bibonga ya bo ntoma ya bituka baye balongaki te basengeli na mikolo muambe uto babimisa bilembo po ya kofunda likambo na misala mya sembo , nzoka nde o bisika maponami ya balobeli ba commune masalemaki te misala ya Ceni eekozela ndingisa ya misala mikoyangelaka bitando ya ekolo po ya kolengela maponami masusu , wana sango ya misala ya Ceni o ekolo ….
Mbula matari ezui ndaka ya kotia o bikela muango ya mokonzi wa ekolo o matali misala mya nkita pe ntombua ndange na ndenge kati na mibu mitano mikoya ya mosala mua ye , sango epesamaki na ministre o matali nkita ya ekolo sima ya yoko bokutani bokambemaki na ministre wa yambo mua mosala misato awa na Kinshasa…
Na Uvira o etuka sud Kivu ,moseka moko ya mibu zomi na mineyi emonisami na bokono bua pulupulu ekasi o etando ya kolongonu bua nzoto ya Ruzizi , sika atindami na lopitalo enene ya Sange po ya lisungi ….
/sites/default/files/2024-01/26012024-p-l-journallingalamatin-00web.mp3








