Ekolo Rdc ekondonguana lelo loye na ekolo Guinee na engumba Abidjan kolanda na milulu ya Can Cote d’ivoire ,kati na sango eye tozui makanisi ya bayi Kinshasa o matali mimekano mina ….
Na Kongo Central bayi polusu banso bakosalaka misala na Kimpese batindami bisika misusu , wana moko ya mikano mizuamaki na bakambi na eyano ya mafunda ya bayi mboka baye bafundaki bayi polusu kozala na boyokani na bato mabe….
Awa na Kinshasa libota ya ntoma Cherubin Okende oyo abomamaka eleki sika sanza motoba bazui mokano ya kokunda ndeko wa bango ntina tokolanda yango kati na sango eye….
/sites/default/files/2024-02/02022024-p-l-journallingalamatin-00web.mp3