Awa na Kinshasa ,Ntoma ya mokonzi wa ekolo o matali kokela mbula matari too informateur Augustin Kabuya ayebisi te’ abelemi po ya masolo na masanga manso ya politiki biye bizuami o ndako bontoma, po ya koluka bayi mbula matari ba mbanda ba politiki pe lokola batangemi po ya ngalasisi yango …..
Na Nord Kivu , cite ya Sake eekobika malembe malembe na bokonzami ya ba Fardc pe ba wazalendo baye mbela baakoyiba biloko o ba ndako ya bato bakimi bitumba o etando eye ….
O Ituri , compagnie ya pepo Caa etelemisi misala mya yango po ya mua tango na ntina ya kolandela ba pepo, sika babemboki ya Kisangani, ’Isiro, Goma, Lubumbashi pe Kinshasa baakomitungisa nba misala mya bango mibebi mingi penza po ya baye basengeli kobemboka po ya kolongonu bua nzoto …
/sites/default/files/2024-02/160224-p-l-journallingalamatin-00web.mp3