TITRES :
Awa na Kinshasa , o tango booko ba ntoma ba ekolo bakotia mikoloto po ya koboya kotia o mosala mbula matari , mokambi ndako bontoma ya ekolo Vital Kamere andimisi te’ ye azuaki ndako ya mokonzi wa ekolo o matali bozuami ya etuka Maniema kati na mbula matari , ezalaki sima bokutani bua bango ya mua mosala moko moleki …..
Esukaki lobi loleki mua mosala mibale o etando mobimba ya ekolo mimekano ya kosukisa eteelo ya ntey , awa na Kinshasa booko bayekoli ya bisika Maluku 2,3 pe 4 bazuamaki na mimekano miye te po ya bozangi bokengi …..
Na Nord Kivu , lisanga ya molongo Croix Rouge etelemisa muango mua bango ya kopesa masungi ya bileyi na bakima bitumba ya Kanyabayonga , bango bayebisi te’ baakobanga bopusani ya batomboki po ya bitumba o cite eye…..
/sites/default/files/2024-06/05062024-p-l-journallingalamatin-web.mp3