Na Etuka Sud Kivu. Kimia nano ezongi te lelo na etando Kamanyola. Pamba te ba Wazalendo na ba M23 babundaki kuna lobi. Yango bobangi bozali nano.
Na Kisasa lelo nde mabota mazuaka makama na ba mbula ebetaka mikolo mileki babandi kolongwa na biteyelo bazalaki kofanda po bakenda bisika mbulamatadi ya etuka abongisi pona bango. Bisika yango Bizali neti stade municipal ya bandulungwa na pe esika mosusu na commune ya Nsele. Balongoli bango na biteyelo biye po bana kelasi bakozongela kelasi sima ya pasika.
Na Tanganyika. Ba ntoma ya etando Moba balingi lisusu ba soda ya ekolo oyo baza kuna te. Balobi ba soda baye bakotungisa pe konyokola bayi mboka kuna. Ba ntoma baye basengi leta alongola ba soda banso bana kuna pe atia ba mosusu ya sika.
/sites/default/files/2025-04/18042025-p-f-journallingalasoir-00.mp3web.mp3