Molongo elobelaka Bosomi na mosala ya kopanza sango mokolo ya misato ya sanza mitano ya mobu inso. Rdc pe ekanisi mokolo yango lelo pe molulu moko mosalami na kisasa pona yango. Nde Bongo tata mokonzi wa ekolo asengi ba panzi sango basala mosala na bango nakotosa mambi manso mosala yango esengi.
Lobi loleki likama ya Kalehe oyo bato bakufaki na kodindama na mayi ekokisi mbula mibale. Likama yango eboma bato koleka kama mitano. Lelo oyo baye bazalaka esika ya likama yango kasi bakufa te baza nano bayike pe bakeleli Makasi penza.
Koloba te motema malamu esungaka mingi na mokili eza ya solo. Tala ndenge na Kasai oriental Université officiel ya Mbuji mayi na lingomba yoko ya bayi canada bakokoba kosunga pona kosalisa ofele bokono ya mbebo etoboka. Tango na awa na kisasa Fondatio des anges ekosunga ofele pe lokola bokono binso ya ba mama pe biye ya kozanga kobota.
/sites/default/files/2025-05/05052025-p-l-journallingalasoir-00.mp3web.mp3






