Sanza mibale yangoyo mvula ekonoko mingi na Kisasa. Toloba ata mikolo misato to mineyi na poso. Pe ezali konyokolo bato penza. Ba balabala, ba avenues pe mapango ebele kotonda na mayi. Biloko kobeba. Ba ndako kobukana pe pasi na motema tango mosusu bato pe kokufa. Awa tozoloba boye mabota ebele ya quartier Bisengo commune ya Bandalungwa bakoma nabango kolala libanda. Po mayi ya mvula efandi neti libela naba ndako pe ba avenues na bango.
Kala nioso oyo tokanisa te bokono ya maba esila nango na mokili. Kasi tomikosa po bokono bona boza kaka. Na Djugu na Ituri boko babeli na yango bazali. Se lokola na Kasai Oriental babeli kututu pe bazali. Nioso wana tolandango na ba sango eye.
Tango Rdc na Rwanda liboso ya Etats unis pe Rdc kaka na ba M23 liboso ya Qatar bakolakaka tongo moyi te posa na bango ezali kaka kimia. Kasi na monyele ya Kongo yango te nde ekomonana. Neti lelo boye ba M23 na ba Wazalendo babundi nabango lisusu na kimia nioso kati Uvira na Walungu neti eloko eza te. Neti balaka eloko. Lobi pe lokola babundaki na bango pe lisusu kaka na kimia nioso.
/sites/default/files/2025-05/06052025-p-l-journallingalasoir-00.mp3web.mp3