Awa na Kinshasa ba zuzi baakotondisa boloko enene ya makala po ya koluka misolo , wana makanisi ya lisanga fondation bill clinton po ya kimia kotala lolenge bakangemi batondi o boloko , nzoka nde esengeli kobimisa booko bato po ya kotika esika na basusu….
Na mobembo ya mosala na Goma o etuka Nord Kivu , ntoma ya kalaka ya Onu o ekolo Rdc asombitinyaki makanisi na moyangeli etuka o matali kotia o bikela meko bizuamaki na Luanda pe koluka bokengi o matli nzela ya pepo kuna…..
O etuka Lomami , moto inso azuami na mondoki asengeli kokende komikomisa pe epekisami na bayi mboka kolata bilamba biwulani na sokoto ya mampinga….wana mokano ya ministre o matali bitando o etuka …
/sites/default/files/2023-02/28022023-p-l-journallingalasoir-web.mp3