Journal lingala soir

Ndenge toyebisaki bino na tongo. Lelo nde ba cardinaux kama moko tuku misato na misato oyo basengeli kopoma papa ya sika mokonzi ya eklezia katoliko bakokoto libela na ndako ya boponi papa yango po bapona ye. Ekosalema na Vatican na Italie. Kati ba cardinaux yango bakopona papa ya sika cardinal ya Rdc Fridolin Ambongo pe azali wana

Makonga toboka Claude aza lisusu moyangeli ndako bontoma ya Maniema te. Mbulamatari ya Rdc asepeli nango te pe alobi yango. Po neti pembeni ya moyangeli ndako bontoma ya Maniema oyo balongoli ye lelo na ebonga naye ya bokonzi na ba ntoma. Moyangeli molandi ya ndako bontoma ya etuka Lomami ye pe balongolaki ye kaka bongo na poso eye tozali.

Mvula ekokoba konyokolo bayi Rdc mikoloyo. Lobi lakisaki bino ndenge mayi ya mvula ekokotisa mawa na mabota ya kisasa. Lelo boye Kalemie nde ezindi na mayi. Pamba te mvula ebetaki lobi etondisi mibale ya Tanganyika. Yango pe ezindisi ba quartiers kuna.

 

 

/sites/default/files/2025-05/07052025-p-l-journallingalasoir-00web.mp3