Pulupulu ya makila ekotungisa na Maniema. Motango ya bilembo nango ebakisami kuna mikoloyo. Kasi na Moanda na Kongo central bokono yango esali neti kopema mua moke.
Mikolo ebele ba sango bizalaka kaka ya mabe. Kasi tala lelo yoko sango ya kosepela. Lingomba Cicr emeli bakeleli ya Kalehe biloko nzike pona kosunga kobika na bango. Biloko yango bizali na ya kolia na ya kosalela. Kokabola biloko yango ebandaki lobi na Lwako pe ekokoba mikolo mikoya neti na Muhongoza pe Nyabibwe.
Na Kongo central. Boyebi sango topesaki bino na ebandela ya poso te soda moko ya mapinga ebatelaka ekolo na nzela ya mayi to force navale abomaki bato basato na etonga ya Eklezia Bethesda ministry mokolo ya lomingo na banana. Kosambisa naye esi ebandi na Moanda.
/sites/default/files/2025-05/14052025-p-l-journallingalasoir-00mp3web_0.mp3