Journal lingala soir

Lelo mua yambo ya poso lingomba Hcr ezongisi epa na bango bayi Rwanda bazalaki na Rdc motango koleka koto yoko. Bayi Rwanda yango babimeli na nzela ya Goma. Hcr azongisaki bango ndambo liboso pe abakisi  basusu lelo. Nde akobakisa lisusu basusu mikolo mikoya.

Na Kwilu. Mvula ebetaki lobi ememi pasi penza na Bandundu ville. Ya solo toyoki te te ebomi moto kasi epanzi ba ndako. Bisika ya mombongo pe ba bilo ebele. Ndakisa bilo monene ya pulusu na Engumba ekoti mayi mingi pe mikanda ebele mibebi na mayi yango.

Na Nord Kivu. Gbwagbwa Semuliki esi ebongi. Office des routes oyo azalaki kobongisa Gbwagbwa yango poso misato yangoyo alobi misala ya kobongisa Gbwagbwa Semuliki eye elingaki ekweya misi misili nango nioso. Kala te nde kosalela lisusu Gbwagbwa eye ezongeli.

/sites/default/files/2025-05/19052025-p-l-journallingalasoir-00.mp3web.mp3