Senat ya ekolo asengelaki koyamba Joseph kabila lelo pe atindelaki ye libiangisi pona koyoka ye kasi mokonzi wa ekolo ya kala ya Rdc amitalisi te na libiangisi yango. Zuzi yaba soda afundi ye te abomisa bayi mboka ebele pe asengi asambisa ye pona yango.
Na Etuka Lomami. Bayi Muene Ditu baza lisusu na mayi ya pompi te poso mibale yangoyo. Na esika ya mayi yango bakomi nde komela to kosalela ya mabulu.
Na Ituri. Kozanga bokengi eyingeli na Djugu pona bitumba bizali kuna ekotungisa penza bayi etando. Na boko bisika biteyelo, ba wenze, bisika ya mombongo pe bongo na bongo bikangami. Ngambo mosusu bato pe bakomi ya kotanga ezala na nzela ya nationale 27 to ba nzela biye biwutaka bilanga.
/sites/default/files/2025-05/20052025-p-l-journallingalasoir-00.mp3web.mp3