Mbulamatari ya kisasa apekisi ba mituka ya minene to remorques bitambola lisusu na engumba mokonzi na moyi te. Kasi batambusi mituka yango basengi bapesa bango mua ngonga.
Moyangeli sud Kivu azalaki lisusu na etuka te wuta ba M23 bakoma na Bukavu sanza mineyi yangoyo. Kasi wuta lobi Jean Jacques Purusi azongi lisusu na sud kivu pe azongeli kiti naye ya bokonzi kasi na Uvira po na Bukavu ba m23 baza nano kaka.
Na Kisasa kaka yoko linaka ya mikolo mibale ya kolobela mandoki make na Rdc libandi lelo na engumba mokonzi. Linaka liango libongisami na lisungi ya yoko lingomba ya molongo lilobelaka likambo yango ya bamandoki na mokili. Tina ya likambo ezali koyeba kolandelela mandoki yango
/sites/default/files/2025-05/21052025-p-l-journallingalasoir-00.mp3web.mp3