Na ituri ba kabila Hema pe Lendu basalaki lelo yoko likita kati bango mibale na Fataki. Tina nango ezalaki basolola pona kobongisa bozongi na kimia ya bakima bitumba o bandako na bango.
Na poso ekoya Rdc ekokoma na passport ya sika. Ya kala pe bakosalela yango kaka ti esila. Kasi ya sika nde ekoma passport ya Kongo penza. Leta alobi ezali na bokengi makasi pe motuya na yango ezali tuku sambo na mitano to 75 dollars ya America.
Na Kongo central mikolo misato yango bayi mboka Nkolo na Mbanza Ngungu bakomona mapekapeka ebele koyingela kuna ezala na bandako to na bilanga. Ngonga mosusu soko moto akebi te bakokweya kutu ti na ba nzungu ya biloko ya kolia. Bayi mboka bakokamwa mingi pamba te nano bamona boye te. Pe babeleli leta kopesa bango biyano.
/sites/default/files/2025-05/28052025-p-l-journallingalasoir-00.mp3web.mp3