Martin Fayulu alobeli Kongo mobimba lelo. Pona ye mboka ekokwana biteni biteni. Pe ekoki kozala bongo ata moke te. Abeleli esila. Pe asengi Corneille Nangaa, Jospeh kabila pe Felix Tshisekedi Bafanda esika moko pe bayokana.
Examen d’etat ya mobu tozali na mimekano na yango ya ebandela ebandi lelo na Kongo mobimba. Tofanda biso banso tofongola matoyi. Po nioso ndenge eleki tokoyebisa bino yango kaka sikoyo.
Na Ituri boko basimba mandoki babomi bato muambi na Nizi na Djugu. Babomi yango bayebani nano te pe lokola likambo pe etindi bango basala bongo pe eyebani te. Kasi bolukaluki pe ezali na kati ya kosalama.
/sites/default/files/2025-06/02062025-p-l-journallingalasoir-00.mp3web.mp3