Ministre Patrick Muyaya molobeli ya Mbulamatari ya Rdc asepeli ndenge Martin Fayulu mbanda politiki ya Felix Tshisekedi andimi kopusana pembeni naye po batala elongo ndenge nini kosunga ekolo. Pe asengi moyi Kongo nioso atelema po mopaya amema bayi Kongo kobunda bunda bango na bango te.
Na etuka Kwilu. Moyangeli mambi ma kelasi na etuka aleli epa ya leta asala eloko pona biteyelo ya Bandundu ville biye bibebi na ba mvula mibeti mikoloyo na etuka pe engumba. Boko manzaza miayango bilongwe. Bisusu bibukani ndambo. Bisusu lisusu bibukani penza nioso.
Na Occ kompani ya leta elandelaka biloko bikotoko na ekolo ba Sali bazali na kanda pe batelemisi mosala lelo. Posa na bango ezali leta alongola bakonzi na bango pamba te bango basali balobi bazo futama ngonga inso te. Soki babeli lisalisi ezali te. Pe lisusu bakonzi yango bayebi pe mosala malamu te.
/sites/default/files/2025-06/03062025-p-l-journallingalasoir-00.mp3web.mp3