Lingomba amnesty international elobelaka lolenge bosembo ekotiama na misala na molongo ekomi yoko mokanda ya sika pona kolobela minyoko bayi Kongo bakobika na monyele mua ekolo awa pe bitumba babengi la Guerre de six jours esalamaka na Kisangani ekokisi mibu tuku mibale na mitano. Na mokanda yango lingomba Amnesty alakisi kokamua naye po polele, bosembo pe kofuta mabe masalama mazali te na minyoko miso mikosalama na Rdc.
Mikolo mibale yangoyo ndako ya ba ntona ya ekolo etindimaki etat de siege ekoba na Ituri pe Nord Kivu. Kasi yambo bantoma bapesa iyo wana moyangeli ndako yango alobaki esengo naye ndenge Rdc ezwi ebonga na ndako ya mosala ya Onu elobelaka kimia na bokengi na molongo.
Na Tanganyika. Unicef na Caritas développement babandaki na mua misato yoko linaka ekosunga bana motango koto tuku motoba ya bingumba Kalemie na Nyunzu bakobika na pasi. Bana yango bazali ndakisa baye babimisi bango na mangomba ya basimba mandoki. Bongo Unicef na caritas bakosunga bana baye neti nakokotisa bango na kelasi.
/sites/default/files/2025-06/05062025-p-l-journallingalasoir-00.mp3web.mp3