Wuta ba sanza ebele yangoyo ba mama bakoma kobota ofele na Rdc. Kasi Kobota ofele yango ekosila kala te soko leta asali angele te. Leta akofuta lisusu mapitalo wapi epayi ba mama bakendaka kobota ofete te. Mapitalo masiliki pe makateli leta te soko na mikolo mikoya leta afuti kaka bango mbongo ya niongo yango te bakati kobotisa ba mama ofele.
Awa na engumba mokonzi ministre molandi ya mambi ya bosembo asengi ba zuzi balandela makasi bato ya misala mabe baye bakokotela bato naba ndako to pe bisika na bango ya misala pona koyiba to kobotolo bango mbongo. Asengi pe lisusu bayi Kisasa bafongola miso pe bafunda noki noki nioso ezali keba keba.
Bongo na na Nord kivu pe. Kokebisa lisusu kaka pe leta. Kuna Balakisi ya eteni ya Masisi 7 balobi kala te bakotelemisa mosala na bango. Pamba te sanza mitano yangoyo bakozua lisusu lifuta na bango. Lingomba Caritas développement oyo asengelaki kofuta bango ye ayebisi balakisi baye te lolenge ya kokomisela bango mbongo ezali nano te po kuna po ba M23 bazali kuna. Eyano eye epesi ba lakisi baye kanda pe balingi koyoka yango ata moke te.
/sites/default/files/2025-06/09062025-p-l-journallingalasoir-00.mp3web.mp3