Journal lingala soir

Bayangeli bituka ya Rdc babandi lelo na Kolwezi na etuka Lualaba likita na bango ya mobu inso babengi conference des gouverneurs. Mama ya likambo na oyo ya mobu oyo ezali  kolobela mingi penza nde boni kobongisa kobika ya bato na oyo etali bokolongonu bua nzoto. Tata mokonzi wa ekolo azalaki pe wana pona kobeta piololo ya likita yango.

Minister constant Mutamba akosambisama to te ? lobi zuzi molandeli likambo yango sima ya kofunda Constant Mutamba lisusu asengaki ndako ya ba ntoma ya ekolo endimela ye asambisa ministre. Soko etindimi kosamba ya suka ya minister ya mambi ma bosembo ebandi mobimba.

Lingomba ya molongo Adsse na bokuse etongaki biteyelo pe ba pombi ya mayi yakomela nzinga nzinga ya Bunia pe apesaki yango poso eleki na ba kabila Mbala, Bembey pe Telega babanda kosalela yango.

/sites/default/files/2025-06/10062025-p-l-journallingalasoir-00.mp3web.mp3