Ebandisamaki mua mosala moko eye na Kisangani likindo o matali bikela ya bassin ya Congo , kuna ba nganga mayele ndenge na ndenge bazuamaki po ya kolobela likambo liye….
Na Nord Kivu bayi mampinga ma ekolo Burundi kozuama na mapinga ya Eac bakomaki mua yenga na Goma , booko bakomaki o nzela ya pepo ,pe basusu balekaki na nzela ya mituka na Rwanda na bisaleli bya bango….
Bato ba nkoto mokama basili komikomisa po ya maponami o engumba Kisangani , molandi ya mibale ya misala ya Ceni oyo azuamaki kuna na mobembo ya mosala asengi na baye naino bamikomisi te basala yango na esika ya kozela ngonga ya suka ….
/sites/default/files/2023-03/06032023-p-l-journallingalasoir_web_0.mp3





