LES TITRES
Bayi mampinga ma ekolo ba Fardc bakueyaki lobi loleki na yoko motambo ya batomboki ba CRP ya Thomas LUBANGA. Likama lisalemaki na mboka TSIKU, na territoire ya Djugu o Ituri. Na bilembo batomboki baneyi bakangemaki pe bayi mampinga motoba bazokaki …..
Lisusu loobi loleki mabele mabalukaki o esika bakolukaka makele ya Bibatama na territoire ya Masisi na etuka Nord–Kivu. Kino sika nzoto zomi na sambo bibimisami o libulu pe nzoto bisusu bitikali naino, sango epesamaki na moponami ya Masisi Justin Ndayishimiye, oyo asengi te’ bakanga esika ya koluka makele na maboko ya Rubaya….
Awa na Kinshasa Leonard Mulumba , Marechal Papa Leo po ya libota ye mokambi wa yambo moyi Congo po ya kokamba ba sango na lolaka Okapi too Redacteur en chef akundami lelo loye na malita ya chemin de paradis ,kati na snago nab iso tokoyoka matatoli ya yoko moninga ya mosala po na ye...
/sites/default/files/2025-06/20062025-p-l-journallingalasoir-00wweb.mp3






