Journal lingala soir

Bokono ya pulupulu ya makila ekokoba kotungisa etuka Maniema. Na mokolo ya lelo linaka ya leta ebundisaka ba bokono nioso ya pulupulu elobi te babeli ya pulupulu ya makila na Maniema bazali motango koleka koto misato. Pe baye bakufi na yango bazali kama moko tuku mibale.

Na Ituri. Mingi penza na Tchomia pe nzinga nzinga kimia ezongi sanza moko yangoyo. Pe kaka bongo bayi bisika pe bazongeli kobika na bango bo momesano. Ndakisa ya bilanga bazongeli bilanga, ya bibwele bazongeli kobokolo bibwele. Pe ya mbisi bazongeli koloba. Nioso wana po kimia ezongi kuna.

Likita ya motuya toyebisaki bino ebandaki lobi na Angola kati ekolo Etats unis ya America pe mikili ya africa likokoba lisusu lelo. Bongo na lisolo azalaki nango lobi pona kolobela Corridor ya Lobito ministre ya Transport ya Rdc Jean Pierre Bemba atalisaki te yango likanisi yango ya Lobito ezali eloko malamu pamba te ekosunga ndakisa kosangisa bikolo Zambie, Angola pe Rdc.

 

/sites/default/files/2025-06/24062025-p-l-journallingalasoir-00.mp3web.mp3