Journal lingala soir

Awa na Kisasa bayi Kongo basengi leta azongisa kompani ya ekolo Belgika Locosem oyo ezalaki kosala passport tee sikawa po akoba mosala naye ya kosala passport ya Rdc. Pamba te wuta poso mibale kompani ya sika kombo Dermalog ebandi kobimisa passport pona bayi Kongo sika kasi ekosimba penza te.

Lobi tokebisaki bino pona pulupulu ya makila ekotungisa Maniema. Lelo toye lisusu koyebisa bino te kitutu pe ekotika etando ya Kasongo epema pe te. Pe kitutu yango esi ebomi bato pene na tuku mible.

Na Ituri. Tata Episekopo ya Diocese ya Bunia akokisi bongo mibu tuku mibale ya ki bo episekopo naye mobu oyo. Bongo na molulu asalaki pona yango asengi moto nioso oyo akosala mua eloko po bitumba bikobaka kaka na Ituri ayoka motema mawa pe atika.

/sites/default/files/2025-06/25062025-p-l-journallingalasoir-00.mp3web.mp3