Journal lingala soir

Ministre ya kala Constant Mutamba ayebi sikawa etumbu naye. Ba zuzi ya ekolo bakateli ye lelo na Kisasa mibu misato ya boloko babengi travaux forces. Wana nde etumbu bakateli ministre ya kala ya mambi ma bosembo  pona ndenge bafundaki ye te ayibi mbongo ya leta milioni zomi na libua ya misola ya America. Na kosambisa yango kaka pe nde ba zuzi bapekisi pe lisusu Constant Mutamba te akosala lisusu politiki na ekolo Kongo te pona mibu mitano.

Yoko likita ya kosolola lolenge ya kozongisa kimia na Kongo liye Fondation Thabo Mbeki elakaki kobongisa na ekolo Africa ya Sudi ekobanda lobi bo elobi lisanga ya libongisi yango. Kasi likita liango likosangisa penza bayi politiki ya Rdc banso te. Boko neti mbulamari ya ekolo na pe mbanda politiki Martin fayulu bango bakozala te. Kasi boko bayi politiki basusu lokola Moise Katumbi, Delly sessanga to pe Jean Marc Kabund bango balobi bakozala.

Awa na kisasa kaka. Bayi engumba mokonzi ya aire ya sante ya Abattoir 2 na commune ya Masina baleli ba mangwele ya kobundisa pulupulu ya makila epa ya leta. Pamba te mikoloyo na esika eye bilembo ya bokono eye ekomonana ebele pe lisusu ebomi pe bato nzike.

 

/sites/default/files/2025-09/02092025-p-l-journallingalasoirweb-00.mp3