journal lingala soir

Lelo boye motema ya bayi Kongo mozali kaka likolo likolo. Pamba te Ba Leopards ya Rdc baye babetaka ndembo bakobeta lelo na ngonga tuku mibale to 20h ya Kisasa na ba Lions indomptables ya Cameroun. Ezali masano oyo soko ba Leopards balongi yango bakobeta lisusu na bikolo Nzike pe soki tolongi kaka lisusu te na suka masano mazali nano mua nzike nde Rdc ekeyi bongo lisano ya ndembo ya molongo eye babengi coupe du monde ya football eye ekobetama mobu mokoya na ekolo Etats unis.

Na Haut katanga mikatano mizali mibale. Na Lumbashi yoko kompani ya ba chinois likotungi kobika ya bato kuna na mosala kompani eye ekosala. Bongo na Kasumbalesa nde moto ebomi bana baneyi mobimba ya libota se moko.

Na oyo etali mambi ya kelasi pe libiki ya balakisi ya Kongo. Na etando Kungu na Sud Ubangi balakisi baleli ba lifuta na bango ya sanza mibale nano bazwi te. Na Kisasa pe lokola lingomba linene na bango lisengi mbulamatari na ba ntoma ya ekolo bapesa biyano bisengeli na ba posa ya balakisi ya ekolo pe mingi penza bafuta nde nano ba lifuta na bango.

 

/sites/default/files/2025-11/13112025-journallingalasoirbonweb-00.mp3