Ndenge tolandaki yango biso nioso Leopards nabiso ebetaka ndembo ezali lisusu mosika te na kozwa iyo ya kokanda mobu mokoya na masano ya molongo babengi Coupe du monde ya football na Etats unis. Etikali bango toloba lisano ye moko to mibale ya kolonga yambo bazwa iyo yango. Ndakisa lobi Rdc epolisaki ekolo Nigeria na lisano babetaki na Maroc. Lelo boye ba Leopards na biso basi bazongo Kongo. Bayi mboka ebele bawuti koyamba bango na lopango ya pepo pe awa tokoloba boye bakokenda malimbe malimbe na stade ya Martyrs awa na Kisasa. Wapi epayi ekolo mobimba ebongisi yoko molulu ya kotondo bango
Bongo na Ngambo mosusu. Na Sud kivu. Pembeni ya bisika ba M23 bakokonza wuta ebandeli ya mobu tozali. Batomboki baye bazwi pe lisusu wuta lobi mboka Maimingi na Shabunda ekomi na maboko na bango. Bakotelaki mampinga ma ekolo na nkuku pe mampinga mazongaki mua sima. Bayi mboka bayike bakimi ba ndako na bango pe lisusu bato bazoki bazali pe mua bayike.
Pulupulu ya makila ekotungisa na bituka Nord Kivu pe na Tshopo. Esi ebomi bato. Nioso wana po mayi ma petwa makozanga. Na pe bisika malonga ya kokoto zongo.
/sites/default/files/2025-11/17112025-p-l-journallingalasoirweb-00.mp3



