journal lingala soir

Mbanda politique Martin Fayulu asepeli te na boyokani Rdc na Rwanda basali ya kosala mombongo pe mambi matali misolo elengo. Ye Martin Fayulu alobi boyokani boye bokokabola ekolo na biso pe ezali malamu te. Na yango asengi lisusu bayi Kongo basala masolo ya boyokani mbango mbango.

Mboka Birhinyi eyamba bato bayike sanza moko yangoyo bakima bitumba pe bayingela kuna pona kobika. Bongo bakima bitumba baye bakonyokwama makasi mikoloyo. Yango bato pe mangomba bilombe ya Birhinyi basengeli bango lisali.

Lelo awa na Kisasa ezalaki pasi kozwa transport pona kotambola. Bato bayike batamboli kaka makolo. Nioso wana po mosala ya kotala mikanda ya ba mituka mobandaki nde lelo nzoka nde mosengelaki kobanda nde lobi. Bayi Kisasa basepeli penza te lolenge makambo yango masalami boye.

 

/sites/default/files/2025-11/18112025-p-l-journallingalasoirweb-00.mp3