Sango ya mawa ewuti Ilebo na etuka Ya Kasai. Lobi yoko masuwa ewutaki na etando Kole pe ezalaki koya Kisasa edindaki na mayi pe bato koleka tuku motoba bakufi.
Bayangeli ya ba ndako ya ba ntoma ya Africa Upa na bokuse bazali na likita na bango ya mobu mikoloyo awa na Kisasa. Likita liango libandaki lobi pe likosila na suka ya poso. Mama ya likambo ya lisanga na bango ya mobu oyo ezali kobongisa ndakisa mikanda ya lisanga na bango. Moyangeli ya ndako ya ba ntoma ya Rdc asepili na likita yango ya Kisasa pe amoni yango lokola yoko eleko eko sunga pona bomoko ya Africa.
Motindami ya lokumu ya moyangeli Onu na Africa ya mayi ya bitima minene Huang xia akutanaki lisusu na tata mokonzi wa ekolo awa na Kisasa. Basololi makambo ya boni kozongisa kimia ya libela na Kongo. Pe ye Huang Xia alobi posa ezali kaka manso makosalama ezala na kongo to pe bisika binso na molongo masunga pona kimia yango eyingela penza pe noki noki.
/sites/default/files/2025-11/19112025-p-l-journallingalasoir-web00.mp3








