LES TITRES
Na etuka Kongo Central bato zomi na moko baweyi pe basusu bazuami na bokono bua pulu pulu ekasi kati na bakangemi ya boloko enene ya Mbanza Ngungu , po yango ministre o matali sembo o ekolo azui yoko mokano eye tokolanda kati na sango na biso ….
O Ituri , bayi bokengi basengeli koboma nyama inso bakomona o mpango ya misala mikoyangelaka bobemboki ya ba pepo too Rva , wana moko mokano mozuami po ya kotia bokengi o libanda lya pepo ya Bunia ….
Nzoka nde na Maniema mokambi misala mikoyangelaka mayi too Rvf asengi na bato banso batonga ndako pena ya mayi komilongola na lombango pe kozonga lisusu te , amba te mayi ya ebale ya Congo esili komata…..
/sites/default/files/2026-03/30032026-p-l-journallingalasoir-00web.mp3







