LES TITRES :
Ekolo Africa ya ngele ekokoba na kotosa makoki pe kobatela bato banso bakobikaka o mable ma bango , wana maloba ma ngay te kasi ya mokonzi ya ekolo ena Cyrille Ramaphosa o tango azalaki koyanola na moninga wa ye mokonzi wa ekolo Congo Demokratiki o mobembo ya mosala asalaki lobi loleka awa na Kinshasa….
Bato leka mokama baakomonana te, basusu tuku mibale baweyi pe tuku muambe babiki na likama lya mayi esalemaki o butu ya mua mosala misato o bokutani ya mingala Kasai pe Sankuru na etuka Kasai…..
O Ituri ebandisamaki mua mosala mineyi na Bunia ,bomekami ya mino mibale po yua kobikisa bokono bua Ebola boye bongali lisusu kuna , kolanda na bakambi misala baakoluka koyeba bokasi ya mino miye po ya kopesa elikya na bakoni …..
/sites/default/files/2026-07/03072026-p-l-journallingalasoir-00web.mp3








