Mia zomi na motoba inso ya sanza ya yambo , ekolo Rdc ekokundolaka bobomami ya nkondo Mzee Laurent Desire Kabila, awa na Kinshasa yoko missa esalemaki o boso ya bayi liboya lya ye , booko bayi mbula matari pe bato basusu ndenge na ndenge….
Na engumba Kikwit mokambi misala ya maponami too Ceni atelemisamaki na mosala po ya kanyaka , nzoka nde yoko lisanga ya bayi mboka kuna etomboli mongongo po ya kofunda maye malekaki pe babanzi te’ moto apesaki kanyaka pe asengeli na etumbu ….
Tokolobela pe mbela ya bayi mboka Kalehe pe Walungu baye bakueli makama ma mayi pe baakosenga masungi ya mbula matari na bato ya mitema malamu…
/sites/default/files/2024-01/16012024j-p-l-ournallingalasoir-00web.mp3








