Mbula matari ezui ndaka ya kotia o bikela muango ya mokonzi wa ekolo o matali misala mya nkita pe ntombua ndange na ndenge kati na mibu mitano mikoya ya mosala mua ye , sango epesamaki na ministre o matali nkita ya ekolo sima ya yoko bokutani bokambemaki na ministre wa yambo mua mosala misato awa na Kinshasa…
Na Nord Kivu , bato pene zomi baweyi pe basusu bazoki kati na bayi mboka o bitumba makasi bikosalema na na Mwesso kati na batomboki ba M23 , masanga ya basimba mandoki pe bayi mampinga ma ekolo ba Fardc….
Na Uvira o etuka sud Kivu ,moseka moko ya mibu zomi na mineyi emonisami na bokono bua pulupulu ekasi o etando ya kolongonu bua nzoto ya Ruzizi , sika atindami na lopitalo enene ya Sange po ya lisungi …
/sites/default/files/2024-01/25012024-p-l-journallingalasoir-00web.mp3








