Journal Lingla Soir

Na  Beni ,  bolukaluki  bookokoba  sima  bombi  ebetamaki  o  pokwa  ya  mua  mosala  misato  na esika  Macampagne  pe  bato  zomi  na muambe  bazuaki  makama , kolanda  ba sango  ya  yambo  bombi  etiamaki  na moto  ayebani  te  oyo  akosanaki  kotika  liboke  na ye  pene  ya  masini  ya  fufu…..

Na  Equateur  monene  bato  leka  tuku  sambo  baweyi ,  basusu  leka  tuku  motoba  baakomonana  te  pe  koleka  mokama  babiki  ,wana    bilembo  na polele  ya  likama  lya  mayi  eye  esalemaki  na  Bansakusu  mia  zomi  na  muambe  moleki …..

Na   Kasai-Oriental, diketele  ya misala ya  biteelo  ya etuka  ya  malakisi  ya   Kasai Oriental 1 atelemisi  o  misala   bakambi  basato  ba  biteelo  ya  Mbuji  Mayi,bango  bazalaki  kofutisa  misolo  na  bayekoli  tango  na  ndingisa…

 

/sites/default/files/2023-01/26012023-p-l-journallingalasoir-web.mp3