/sites/default/files/2025-02/19022025-p-l-journallingalasoir-00_1.mp31/ Bukavu : Ebandi lelo na engumba Bukavu bosambisi ya mapinga ba FARDC libwa baye bafundami koyiba , kozua basi na makasi mpe koboma ;
2/ Goma : Bana bazongi te na kelasi mokolo ya mosala moko moye bo esakolamaki na engumba Goma ;
3/ Kinshasa : Awa na mboka mokonzi Kinshasa, moyangeli etuka akendeki konongo lolenge misala mizali kotambola po an kobongisa ba nzela ekomemaka na zando enene ya engumba.