Na Beni mama mokambi ya Monusco apaleli likama ya bobundisi mituka eye esalemaki o Ituri o poso eleki ,ye abanzi te’ yango ezali libaku po ya kobongisa pe kokembisa misala ya bokengi ….
na Kinshasa misala ya ekolo Suede ebandisi milulu ya bokundoli mibu tuku motoba ya liwa ya kalaka ya kala ya Onu Dag Hamashold ,ntoma ya ekolo Suede atalisi te’ ye awaki po ya koluka kimia o ekolo Congo Demokratiki….
Na Goma manguele mosusu esili kokoma po ya monganga mokambi misala ya manguele yango ekosunga na bayi mboka kopona mino balingi pe ye abuaki mbela ona bayi mboka po te ‘ bakende kozua manguele.
/sites/default/files/2021-09/10092021-p-l-journallingalasoir_web.mp3