Kolobela maye maakoleka na Rugari o etuka Nord Kivu , sima bobetani masasi o butu ya mua mosala misato kati na batomboki ba M23 pe basimba mandoki o etando , bayi mboka Rutshuru pe Kiwanja baakobangela bokengi bua bango…..
Na Haut Katanga , bato bayike bamonisami na pulupulu pe kosanza ,mbano babale kati na bango baweyi , bakambi kuna basengi na bayi mboka kotosa meko ya bopeto….
Na Kailo o etuka maniema nzela bibebi makasi penza, bayi societe civile babuaki mbela po te’ bababongisela nzela na ntina ya kobimisa biloko ya bilanga ....
/sites/default/files/2022-11/10112022-p-l-journallingalasoir-web.mp3