Mokonzi wa ekolo Felix Tshisekedi azuaki maloba lobi loleki o likita linene ya Onu na New York ,libaku po ya ye kolobela maye masalemi o ekolo uto azua bokonzi ,pe kozongela likambo ya bozangi bokengi o monyele ya ekolo …
O Ituri , bato na biloko ya koteka baakobatelama poso inso na bitumba ya batomboki ba Adf na lisungi ya londo ekosalema na bayi mampinga ma ekolo pe ba Monusco o nzela Komanda Luna na territoire ya Irumu tokolobela yango kati na sango eye …
Na Kasai Oriental boloko enene ya Mbuji mayi pe lopitalo enene ya Bonzola bizongeli kozua mayi ma peto na lisungi ya misala ya mokonzi wa ekolo o matali mayi pe lotiliki …
/sites/default/files/2021-09/22092021-p-l-journallingalamatinweb.mp3